Nini yango

Sáni enɛ́nɛ to kivɛ́ti ya Kongónna ɛ́sti, ezalí na mâmbí ma ntɔ́ki ya kitɔ́kɔ mpé ya ndéngé na ndéngé. Efándí kúná bikolo ya loléngé na loléngé, bikosálela bwǎnyá mpé mayɛ́lɛ mpɔ́ na kobíka mpé bikolobaka nkótá iwútí na masangá ebelé ya baíBantu, baíUbangí tǒ ya baíSudáni ya katikáti. Mâmbí maleká (istwáli) ma etúlúká eye mazalí ya kokámwisa. Bikólo biye biwútí wápi ? Tángo níni bikútánákí Nkita níni bazalákí kotɛ́kelana mpé ntɔki nini bazalákí kokabolana? Bandá lɛlɔ́, eyébáni tee ndambo mukɛ́ ya baímayɛ́lɛ baluká koyéba makambo eleká kala zóngázóngá ya etúlúká ya Kisangani. Likanisi ya koluka koyéba ebengami

BANTURIVERS, esangisi baímayɛ́lɛ, ya nzébi ya ndenge na ndenge mpo na koluka koyéba istwáli ya bokomeli mpé bofándeli na etúlúká ená.  Mpé, lokóla mosálá mwa bilanga na zámba ekwatɛ́lɛ ezalaka pási makasi, BANTURIVERS ekomipésa mpé koluka koyéba ntína ya mingálá bɔ́ nzelá na kati ya zámba mpé lokola maziba matóndí na mbísi ebelé.

Nzébi nkótá

Na bozwáká maloba, mingángi mpé biténi bya ntína ya maloba to  molofeme ya eleko bɛ́bɛ, bo fongóla ya makambo maleká, bangangamayɛ́lɛ ba nkótá bazalí koluka koyéba liziba mpé nzelá ilekákí masangá ma nkota  ma libosó na kivɛ́ti ya Kongó ya ɛ́sti. Bazali mpé koluka koyeba mombóngo mozalaki kosalema  mpé botómboli nzebá ya masangá wana na maye matálí bolobimbísi mpé bolúki.

Nzébibomoto

Tokokí koyéba makambo maleka tɛ́ sɔ́kí tonyanyólí náino maye ma sika tɛ́. Yangó wǎná baínzébibomoto  bakoluka koyéba bosáleli bwa sika bwa milúká ya kivɛ́ti ya Kongo, elingí koloba ndéngé ya bobomimbísi mpé ya bolúki, ntína ya babomimbísi na zelá ya mombóngo mpé maye matáli misálá mya ntoki nzíngánzíngá ya ebale kongó

Nzébibintíka

Baínzébibintíka bakosangisa mǎmbí ma sika mpé ma kala.  Masolo na basálimbeki, míngi míngi mpenzá bǎsí ba masangá ma  balɔ́bimbísi bakopésa nsango ya bosáli mbeki mpé boyókani na kati ya bangó. Bilembo bya ntɔ́ki ya mosálá mwa mabɔ́kɔ ya ntángo ya kala bikomɔ́nana na botímoli bintíka nzíngánzíngá ya ebale Kongó na mpé nzíngánzíngá ya milúká mizwǎmí bandá Bumba tee Kindu.

BANTURIVERS: Nkómbó óyo elakísí níni ?

BANTURIVERS ezalí koluka koyéba eleko  ya bopalangani bwa baíBantu na óyo etálí mayɛ́lɛ ya kobíkela, istwále ya eleko wǎná etíkálá koyékolama mpenzá tɛ̂ : bosáleli bwa milúká. Likanisi BANTURIVERS  lizalí mpɔ́ na ɛ́sti ya kivɛ́ti Congo, esanga to matakanelo ya nkótá mpé ntɔki.

Istwále ya Afika ya káti libosó lya boyéi bwa mindɛ́lɛ́ ekokání na óyo ya zámba ekwatɛ́lɛ, eye  ezwǎmí na katikáti na yangó : Na kotála malámu, ezalí mpási koyéba istwále ya kalakala  ya etúká eye mpɔ́  makomami  libosó ya bokútani na mindɛ́lɛ́ mpé baarabes mazalí tɛ̂,  mpé lisúsu mpɔ́ loléngé la kobíkela na etúká eye wǎná lozalí kopésa mpási mpɔ́ ya koluka bintíka.

Bandá leló, lokóla bibale bikolingisa kokóta na zámba, bɔ̌kɔ́ nzelá ya nzébi ikosunga bangangamayɛ́lɛ  bákɔ́ta na istwále mpé bákundola míngi koleka biténi ya istwále óyo etóndí na makambo ndéngé na ndéngé. Ebelé ya Baínzébinkótá, baínzébibintíka, baínzébiistwále, bainzébi loléngé moto akelámá, bainzébimbongwana ya nzíngánzíngá, mpé bangangamayɛ́lɛ ya nzébi isúsu bamípésí na boluki koyéba « bopalangani ya baíbantu ». 

Likambo lyangó litáli  motúna moye : Ndéngé níni lisangá linɛ́nɛ lya nkótá (nkótá  400 tǒ 600), lisálí káka mwa lisangá mukɛ́ ya nkótá na káti ya libóta ya ndáká babengi Niger-Congo. Na ntángo mukɛ́ mpenzá (káka mwa bankóto ya mbúla kotánga) lipanzáni kozwa katikáti mobimba ya Afrika (bandá ekólo Cameroun tee na súdi  ya ekólo Somalie mpé na Afrika ya ngɛlɛ́). Nabánza, bopalangani bwangó bowúti bobɛ́lɛ́ na ndéngé  bato bakotámbolaka na mokili mbóka na mbóka, atâ ko ndéngé isúsu ya bopanzani bwa  ndáká, ndakisa bozwi lokótá losúsu, izalákí na ntína.

Ebelé ya bolukinzébi ndéngé na ndéngé botálí bopalangani bwa baíBantu bomípésí miɛngi na bopalangani bwa libosó  bwa masangá ma yambo ma baíBantu, na kokanísáká nzelá iye ibalúkí sima ya zámba ya ekwatɛ́lɛ. Bikólo bantu ya libosó bakokákí kozala baíbilanga,  bilanga bizalákí bɔ̌kɔ́ loléngé ya bangó ya kobíkela ; na yangó bazaláká  kotíkela bisóbé ntángo koleka nyɔ́nsɔ. Na ntángo mbóngwana ya mokili efungólí zámba, baíBantu bakokákí kokenda kovánda na bisóbé  pɛmbɛ́ni ya mái  na ekólo Cameroun ya kati mpé na Gabon na pɛnɛpɛnɛ ya 4000 BP.

Pɛnɛ na 2500 BP, óyo babéngi «Savannah Corridor » (nzelá esóbé) kolandáká molúká Sangha esungí  « baíbilanga ba bantu » na kokenda na súdi, na kobalukáká bǒngó zámba tee na bisóbé ya súdi (ndakisa lokóla ekomí Bostoen na baníngá ba ye na mobú 2015). Kobanda wǎná, na eleko yɔ̌kɔ́, mokili  mobóngwání lisúsu mpé zámba ezóngélí loléngé lwa yangó. Óyo ewútákí tɛ̂ na bokabwani ya masangá ma bantu na nɔrdi  mpé na súdi ya zámba. 

Nzóka ndé, baiBantu bazaláká kokenda na zámba mpé ndáká ya bangó isálí sik’óyo lisangá ya ndáká liye lizalí kokonza na káti ya zámba ekwatɛ́lɛ na  Afrika ya katikáti. Na komóna tee mosálá mwa bilanga mozalí mpási kati na zámba  ekwatɛ́lɛ, níni esungákí masangá ma bantu bavánda na káti zámba ?

Ngangamayɛ́lɛ Vansina (1990) apésí lotómo  makási na bokɔ́ti bwa makémba. Kási makémba mpé sɔngɔ́ na zámba ekwatɛ́lɛ, izalí na protéyini ya malongá tɛ̂. Lokóla bobɔ́kɔli bibwɛ́lɛ́ bokosálamaka míngi mpenzá tɛ̂ na bisíká ya mói makási, bilanga biséngélí bisungama na misálá mya bolɔkɔti lokóla bokila, kolɔkɔta mbínzó mpé kolɔ́ba mbisi. Na kotála kálati ezwǎmí na satelite, Afrika ya katikáti ezalí káka ya mokuku tɛ̂.

Lisangá lyɔ̌kɔ́ linɛ́nɛ ya milúká  likongɛngɛ bisíká bînsɔ ǒ káti ya zámba ekwatɛ́lɛ. Na lisungí lya milúká ebelé mya yě, ebale Congo ezalí, mpɔ́ na mái ebwákaka ǒ oseáni,  ebale ya íbale na molongo, sima ya ebale Amazone. Nganga mayɛ́lɛ Vansina akanísí tee bibale bya kivɛ́ti Congo bisungákí  bɔ̂ nzelá na káti na zámba. Ya sɔ̌lɔ́, biténi binɛ́nɛ bya ebale Congo mpé milúká minɛ́nɛ mizalí leló nzelá sikísikí  mpɔ́ ya  kosála mibémbo na káti ya etuluka ěná. Bilembo bya nzébibintíka bya yambo bilakísi tee botámboli bwa bato na lombángo na kolandáká ebale Congo, ekokí kolimbola  bofandi bwa bato longwá Pool Malebó tee na Kisangáni (lokóla ekomí Wotzka na mobú 1995; lokóla mpé ekomí lisúsu Livingstone-Smith na baninga bayě na mobú  2016).

Ekokí kozala tee bopalangani boye na mbálákátá ezalákí mpɔ́ ya mpósá enɛ́nɛ na bilɔ́kɔ bya ebale. Mpɔ́ na istwale óyo, BANTURIVERS  amípésí míngi na óyo etálí (mosálá ya) ebale: Bibale lokóla nzelá tǒ mabakú na bisíká mabángá malekí ebelé, kási, ya motúya koleka, loléngé masangá ma bankɔ́kɔ mazaláká  kolandǎna,  mamɛsánáka na bomoi nzíngánzíngá na bibale. Tokanísí koyékola na mozindɔ́ motángo mwa  milúká mya baíBantu mpé tokolobela makambo ndakisa : botámboli na masuwa, bolɔ́bimbísi mpé ndéngé ya koyilámba, kasi mpé ntína ya milúká mpɔ́ na bomoi bwa bato, mombóngo, mpé koyéba bisíká mbóka izalí mpé misálá pɛmbɛ́ni na bibale.

Esíká mosálá mǒná ya bolukinzébi ezalí ndé ɛ́sti ya kivɛ́ti Congo, míngi mpenzá etuluka zóngázóngá na engumba Kisangáni tee Bumba na ngɛlɛ́ ya ebale Congo mpé na Kíndu na likoló ya Lualaba. Etuluka eye wǎná etóndá na ntɔki ya ndéngé na ndéngé, efándá wana bikólo bikolobaka nkota ya masangá makɛ́ ya nkótá bantu mpé nkótá ya mabóta masúsu, bato ba bikólo ndéngé na ndéngé, mpé bizalí síkísíkí  na mayɛ́lɛ ma kobíkela makosungana.   

Nakolanda bitéyeli ya leló, etuluka zóngázongá na Kisangáni  emɔ́nání  lokola esíká eye nzelá ebelé ya botámboli bwa bato esúkí. Bikólo bikɛ́sɛ́ní na  ntɔki  baséngélákí komɛsana kobíkela zóngázóngá ya esíká bangó bayéí kovánda. Ntembe tɛ̂  basombítínáká ndéngé ya kosálela mpé nzébi ya ntína. BANTURIVERS ezalí koluka kotála malámu loléngé bato bayâ kofánda na ngámbo ya ɛ́sti ya kivɛ́ti Congo (náni ayǎká na ntángo níni mpé awútáká wápi ?) mpé nzébi ya masangá maye mayébí mpé mamɛ́sáná na bomoi pɛmbɛ́ni na bibale.

Biziba

Livingstone-Smith, A., Cornelissen, E., de Franquen, C., Nikis, N., Mees, F., Tshibamba Mukendi, J., Beeckman, H., Bourland, N. & Hubau, W. 2016. Forests and Rivers: The Archaeology of the North Eastern Congo. Quaternary International.

Vansina, J. 1990. Paths in the Rainforest. Toward a History of Political Tradition in Equatorial Africa. Madison: University of Wisconsin Press.

Wotzka, H.-P. 1995. Studien zur Archäologie des zentralafrikanischen Regenwaldes: Die Keramik des inneren Zaïre-Beckens und ihre Stellung im Kontext der Bantu-Expansion. Africa Praehistorica 6 – Cologne: Heinrich-Barth-Institut.