Nzébibomoto

Elɔ́kɔ mɔ̌kɔ́ ekɛsɛ́nísí likanisi BANTURIVERS ezalí bokɔ́tisi nzébibomoto (boyékolibomoto) na boluki bwa mambí maleká (istwáli). BANTURIVERS ekomipésa na bilembo bya eleko bɛ́bɛ mpɔ́ na koluka koyéba malámu eleko eleká (istwáli). Baínzébibomoto bazalí koyékola masangá mábalé ma balɔ́bimbísi, loléngé la bangó ya bobɔngisi misálá mya bangó mya bozwi biléi, nzelá ya mombóngo na mpé makanisi matálí bomoi bwa baímai.

Atá ko BANTURIVERS ezalí koyékola makambo ma eleko libosó ya boúmbu, likanisi lifandémí na mâmbí ma eleko ya sika, tǒ na ndéngé ínsɔ, na mibú nkáma íbalé iye ileká. Oyo ezali sɔ̂lɔ́ mpenzá mpɔ́ na maye matálí nzébinkótá, na makomí makomámi nsima ya siɛ́kɛlɛ ya zómi na libwǎ, kási mpé mpɔ́ ya boluki botáli nzébibintika, ndakisa boyékoli mayele ma sika ya bosalimbeki.

Sɔ́kí ndáká mpé ntóki ya misálá mya mabɔ́kɔ ya  sika ekómí ntína ya bolukikoyéba ya istwáli, emɔ́nání sɔ̂lɔ́ tee na oyo etálí nzébibikolo yangó epai wapi ezwámí esengeli kozala na makomí mpé bososoli bolámu. Esíká tee batia motéma na makomí ma nzébibikolo mazalí komɔ́nana penzá tɛ mpé maleká kala, lisangá BANTURIVERS likɔ́tísí bangangamayɛ́lɛ ba nzébibomoto mpɔ́ na koyékola mambí ma mikolo miye ma BANTURIVERS epái ya bɔ̌kɔ́ bikólo bya kivɛ́ti ya Kongo.  Baínzébibomoto bazalí koyekola  mayɛ́lɛ ya kobikela mpé ntína ya bolɔ́bimbisi, loléngé la botɛ́ki tǒ mpé mombóngo, mpé etando ya misálá ya kobikela na mboka izwámí na milúká.

Na maye matáli bilei, eteni ya esti ya kiveti ya Kongó ezalí penzá na ntína  mpɔ́ byɔ̌kɔ bikólo bimipésá na mayɛ́lɛ ma sikisiki ma kobikela mpé bizwi mokano ya kosala mombóngo na baínzébi ya mayɛ́lɛ ya ndéngé na ndéngé.

Ndéngé ebelé ya mayɛ́lɛ ya kobakisama mpo ya kobikela iyébání na esti ya zámba ekwatɛlɛ ya Afrika ya kati. Boyókani ya baíbokila mpé baíbolɔkɔti ba Bambuti na masangá ma balóni (baíbilanga) ya pɛmbɛ́ni  bolimbólámí mpenzá, míngi míngi mpɔ́ boyókani bwangó bolobámí mpé na nkótá  ya masangá ma Bambuti (Terashima 1986, 1998).

 

Mokomi Hunt (1999:17,36) alobélí loléngé la boyókani, boye bozaláká na nsúka ya syɛ́kɛlɛ ya zómi na libwá káti na balɔ́bimbisi babengi  Balokelé, na banzébizambá, babengi Bambóle.  Ankei (1984) alimbólí loléngé la boyókani bosúsu ya tína, boye bolakísí polélé mpenzá tee bongangamayɛ́lɛ na yɔ̌kɔ́ ndéngé isúsu ya kobíkela  iyɛ́ngɛ́bɛ́ní na bozali bwa kabíla to ekólo tɛ́, na lokoká tɛ́ : na mimbúla 1970, nzíngánzíngá ya Lualaba, baɔ́kɔ́ bato bamibéngáká « Basongola », bazaláká koloba lokotá songola tǒ mpé loláká ombo, nkótá izwǎmí na masangá makɛ́ na káti ya nkótá bantu 

Mingi kati na bango bazaláká baloni, kasi lisangá lyɔ̌kó eyebanaka na mosálá mwa kolɔ́ba mbísi : Baenya tǒ mpé Basongola-Enya, nkombo epɛsámi mpé na  balɔ́bimbísi bazwámí na ngɛlɛ́ ya Lualaba. Eyebani lisúsu tee Baenya yango bazaláká kolóba loláká songola, tǒ mpé loláká ombo. Ba Songola-Enya bazaláká komibénga Basongola tǒ Baombo mpé baɔ́kɔ́ bazaláká koloba lokóta lɔ̌kɔ́ eyébani  na bikólo bǐná míbalé tɛ́.  Banzébibomoto baye bazwámí kati na BANTURIVERS bazalí kolimbola masangá mayébáná lɛlɔ́ na mosála mwa bolɔ́bimbísi mpé bomikɔtisi bwa bangó na misala ya mombóngo o bitúka .

Boluki bwa baínzébibomoto  bokotála mpé na bozindɔ́ maye matálí efandeli ya bato mpé ntóki   zóngá-zóngá ya milúka, ndakisa ndéngé níni masangá mazalí kosálela mabelé, boyókani bwa bikólo bifándí na ngɛlɛ́ na mpé biye bifándí likólo, boyókani na bato bazwámí mosíká na ebale, boyókani bwa balɔ́bimbísi, boyókani káti ya basálibilanga na bozíkísáká zámba na  baíbokila-babúkimbuma, baúmbu mpé mpɛ́mbɛ́ ya nzoku (Harms 1981), na mpé masangá ma milímo mpé  bokonzi botali  milúka.

Baínzébibomoto bakomipɛ́sí na masangá atâ míbalé ya balɔ́bimbísi, baye bavándí na bisíká bikɛsɛ́ní bya kiveti  Kongó ya esti. Mayele ma bango mpo ya kosalela nkita ya mai makokenisama, lokola mpe lolenge la sikisiki ya kosalela  mabele, nzela ya bango ya mombongo, mpé maye matali mambi ma molimo, mpe ntoki etali miluka. 

Maziba

Ankei, Yuji. 1984. Fish as “primitive money”: Barter markets of the Songola. Senri Ethnological Studies 15. pp. 1–68.

Harms, Robert W. 1981. River of wealth, river of sorrow. The central Zaire basin in the era of the slave and ivory trade, 1500-1891. New Haven and London: Yale University Press.

Hunt, Nancy Rose. 1999. A Colonial Lexicon. Of Birth Ritual, Medicalization, and Mobility in the Congo. Durham: Duke University Press.

Terashima, H. 1986. Economic exchange and the symbiotic relationship between the Mbuti (Efe) Pygmies and the neighboring farmers. Sprache und Geschichte in Afrika, 7(1), 391–405.

― 1998. Honey and holidays: The interactions mediated by honey between the Efe hunter-gatherers and the Lese farmers in the Ituri forest. African Study Monographs Supplementary Issue, 25: 123–134.