Nzébindáká tǒ Nzébi nkótá

Banganga mayɛ́lɛ ya ndáká tǒ Baínzébindáká bazalí koyékola istwále (mǎmbí maleká) ya bofándi (bozwi mabelé) bwa masangá ma nkótá mazwámí na ɛ̌sti ya kivɛ́ti Congo, na bokébi mpenzá na óyo etálí bopalangani bwa baíbantu, bokútani bwa nkótá bosalémákí na nsima, mpé istwále ya motángo mwa baíbantu nzíngánzíngá na bibale tǒ milúká.

Na katikáti ya ɛsti ya kivɛ́ti Congo, káka likolo (nɔrdi) ya moémbé, esíka ebale Lualaba ekómí ebale  Congo, Kisangáni ezwámí ndé wana, engumba ya ísáto ya ekólo RDC. Engumba Kisangáni mpé nzíngánzíngá ya yangó esálí óyo babéngí makatanelo (esanga) ya masangá mikɛ́ ma bantu (wɛ́sti ya kivɛ́ti Congo, ɛsti ya káti, Boan (?), Lebonya (?)) na mpé loláká lɔ̌kɔ́ ya Ubangi (babéngí mba).

Sɔ́kí topúsání lisúsu mwa mukɛ́, etuluka yangó ezwí lisúsu bato ba loléngé na loléngé, na lisangá lisúsu ya mukɛ́ ya baíbantu limɔ́nani na wɛsti (epai wápi mói mokolalaka) (Congo River)), ndáká ubangi ebelé na nordi, mpé ndáká  Sudani ya katikáti na nɔrdi-ɛsti ya kivɛti Congo, mpé ya baíbokila-balɔkɔtimbuma óyo eyébání tee batíká wútá kala lokóka lwa bangó mɔ̌kɔ́

Baínzébindáká ba likanisi BANTURIVERS bazalí koyékola loléngé káni esanga wǎná ya nkótá ebótámákí : banáni bazaláká masangá mǎ nkótá ya kala, bawútáká wápi, ntángo káni bakútánáká, mpé mombóngo níni bazáláká kosála na nsima ya bokútani ? Bainzébinkótá bakoluka lisúsu koyéba istwále ya elɔ́kɔ níni óyo etálí nkótá tɛ̂ ebéndákí tǒ esálísákí masangá mǎná máfánda na esíká ěná, mpenzá mpɔ́ ya kosálela nkita ya mái..

BANTURIVERS emipési míngi na bopalangani bwa baíbantu na ɛsti ya kivɛ́ti Congo. Bokabolibiténi bwa sika bozalí kolobela ba istwále ndéngé na ndéngé ya etuluka eye. Bastin na baníngá ba yě (1999) balobí tee ndáká tǒ nkótá  « boa » na « lebonya » iyǎká libosó, nkótá bantu ya wɛ́sti mpé ɛ́sti yangó iyǎká nsima. Grollemund na baníngá ba yě (2015), bakanísí tee boa mpé lebonya izalí ndáká izaláká na eleko yɔ̌kɔ́ na « nkótá bantu ya káti mpé wɛ́sti», likanisi liye ndé libóngólí mpenzá istwále ya etúlúká eye.

Baínzébinkótá bakopésa likanisi lisúsu ya bokabolibiténi, boye bofandísámí na maloba mpé na mibéko mya lokótá, nakosáléláká nzelá ya  istwále ya mbóngwáná na mpé ndéngé ya bosáleli nzelá ya bokokanisi nkótá. Bokabolibiténi bwa sika, bokosunga na koyéba masangá ma ndáká ma kala mpé koyéba nzelá malandáká na ɛ́sti mpé na káti ya ɛ́sti ya kivɛ́ti  Congo. Likanisi lya íbalé lizalí ndé bokútani bwa nkótá ǐná na nkótá ya bitúka bisúsu : bopésani tǒ bosɔmbini bwa maloba mpé biténi bisúsu bya nkótá, atǎ  mpé  boyebi  nkótá ya libosó.

Mpé lisúsu  Bangangamayɛ́lɛ ya nkótá bakoluka koyéba istwále ya milúká. Istwále ya motángo  mwa bantu nzíngánzíngá na mái ekoyékolama na nzelá ya maloba mpé bilɔ́kɔ, míngi mpenzá na kosáléláká nzelá ya bokokanisi maloba ma ntɔki. Milúká mya loléngé níni baíbantu ya kala bayébákí ? Ndéngé níni basálélákí myangó bɔ̂ nzelá mpé bisíká ya boluki biléi ?

Mǎmbí ma bolukikoyéba ndakisa botámboli na masúwa, bolɔbi- mpé bolámbimbísi, kási mpé  mǎmbí ma motúya ma ntɔki ya milúká mpé bomɔi bwa mái, mombóngo mpé koyéba bisíká mbóka izwǎmí, mpé misála nzíngánzíngá na bibale. Bolukikoyébandáká bokolakisa nzébi ya loléngé nini baíbantu bazaláká na yangó libosó ya kokóma na ɛ́sti ya kivɛ́ti Congo, nzébi nini bazwákí na bokútani na bato basúsu mpé iye bazwí nsima ya ba mbúla na mbula, toloba ata mbula mikama ekómísí bangó baínzébi. Mbano ya bolukikoyéba ikosunga na masoló makosálámá na makambo matálí ndáká tɛ̂, kasi  makótá na bopalangani bwa baíbantu.

Baínzébindáká ba likanisi BANTURIVERS bakosunga mpé na makomí ma nkótá ya  ɛ́sti ya kivɛ́ti Congo. Ndáká tǒ nkótá nzíké ya etúká eye izwí naíno makomí mpenzá tɛ̂, bobɛ́lɛ́ ndámbo mukɛ́. Yangó ndé ekotínda na baínzébinkótá baluka nsango na bolandáká  balobinkótá bisíká bafándí. Na botáláká tee nkótá míngi ya etúká eye wǎná ikómí na likámá,  bolukinsango na mbóka bokopésa nsango ya loléngé nkótá iye wǎná izalí sika.

Maziba

Bastin, Yvonne, André Coupez & Michael Mann. 1999. Continuity and Divergence in the Bantu Languages: perspectives from a lexicostatistic study. Tervuren: Musée Royal de l’Afrique Centrale.

Grollemund, Rebecca, Simon Branford, Koen Bostoen, Andrew Meade, Chris Venditti & Mark Pagel. 2015. Bantu expansion shows that habitat alters the route and pace of human dispersals. Proceedings of the National Academy of Sciences (PNAS).