Nzébibintíka

Na kotímóláká bintíka, baínzébibintíka bakopésa bilembo bya sɔ̌lɔ́ bya istwǎli ya loléngé bato bayá kofánda na sáni enɛ́nɛ (kivɛ́ti) ya Kongó na ɛ́sti; mpé na masoló na baíntɔki ya eleko bɛ́bɛ́, bakosangisa ntɔki ya misálá mya mabɔ́kɔ ya lelɔ́ na miye ya eleko eleká.

Kala tɛ́, etúká zóngázóngá ya Kisangáni ezaláká yɔ̌kɔ́ esíká ezangáká elembo na kálati ya bintíka ya mbóka Kongó. Bintíka bya River Connaissance Project (Eggert 1987, 1992, bɔ̌kɔ́ makomí ; Wotzka 1995) bizwámí ndé na wɛ́sti, na kati ya kivɛ́ti ya Kongó kolanda milúká mya ebale Kongó longwá ebale to láki Tumba tee molúká Lulonga, nzóka ndé bisíka bya Mercader bizwámí míngi na ngámbo nɔrdi-ɛ́sti, na nɔrdi ya Epulu (Mercader 2003).

Bilembo bya eténi ya ɛ́sti ya kivɛ́ti ya Kongó, bizalí káka biye baínzébabintíka ya lasangá BANTURIVERS bazwákí na botímoli bosálámákí na mibú 2010 mpé 2013. Bisika bitímólámákí bilakísí tee mbóka izaláká na Aruwimi, na Lomami mpé na Lindi pɛnɛ na 2200 mpé 1900 BP. Boyékoli  malámu bwa mbeki, bolakísí ndéngé ebele ya kokɛsɛna ya bosálimbeki, ndakisa loléngé lɔ̌kɔ̌, loye lowútí na Sahel (Livingstone-Smith et al. 2016). Bilembo bya yambo bipɛ́sí elíkyá ya koyéba istwǎli ya molekaleko (esanga) ya ntɔki ya lelɔ́.

Ya libosó ya koyéba na ngámbo ya nzébibintíka ezalí kovandisa bilembo síkísíkí bya loléngé bato bayǎká  novánda na etúká eye. Na kolanda loléngé la bobáteli bisíka biye bitímólámákí, tokokí kútu kozwa bilembo bya mayɛ́lɛ ma kobíka maleká, ndakisa bosáleli milúká.

Bangangamayɛ́lɛ ba nzébibintíka bakoyébisa tángo káni mpé ntɔki níni ya bikólo bivándaka lelɔ́ na zámba ekwatɛ́lɛ. Mpɔ́ ya mikakatano mya bobáteli  na nsé ya mabelé matóndá asídi na nsé ya zámba, nzébibintíka ekoyékola míngi mpenzá biténi bya mbeki na mpé bya nzúngu ya lobɛki. mpé bisáleli bisálámí na mabángá na mpé ndámbo ikɛ́ izwámí na tángo ya bosáli byangó.

Loléngé ya kobwáka pɔ́ndɔ́ loye lolekí makási na nyɔ́nsɔ lozalí loye losálámí na milúká mpé, ata ko yangó ekótísí makanisi mabé na koyéba bofándeli pɛmbɛ́ni na milúká, loléngé lǒná lolakísí motúya na lwangó na kotáláká malamu bitwele biye bitóndí pɛmbɛ́ni na milúká ǒ ntéi zámba ya ekwatɛ́lɛ. 

Bobwákí pɔ́ndɔ́ na etando enɛ́nɛ  ǒ ntéi ya kivɛ́ti ya Kongó emɔ́nísí makokí ya kolakisa lisúsu bofándeli na etúká wǎná mpɔ́ na mibú nkóto míbalé na nkámá mitáno miye milekí (Wotzka 1995 ; Eggert 2014) mpé loléngé lǒná ya bobwákí pɔ́ndɔ́ losalemaki kitoko na mabunu mazwǎmí na  nɔrdi-ɛ́sti ya ebale Kongó ezwí mpé biténi bya ngɛlɛ́ bya milúká mya ebale Kongó (Livingstone-Smith et al. 2016).

Na mbala ya íbalé, bakosangisa bilembo bya lelɔ́ mpɔ́ ya koyékola loléngé basálaka mbeki, mombóngo mpé boyókani na ntángo ya kala mpé na lelɔ́. Masoló na bǎsí basálimbeki makoyébisa bosɔ̌lɔ́ bwa mosálá mwa bosálimbeki mpé efándeli ya baimosálá wǎná, nsango iye izángí mpɔ́ na mbeki itímólámí mpé nsango ikopésa bilembo ya bato ba misálá ya mabɔ́kɔ mpé nzela ya boyókani.

Références

Eggert, Manfred K.H. 1987. Archäologische Forschungen im zentralafrikanischen Regenwald. In: Portner, R. & Niemeyer, H.G. (eds.). Die großen Abenteuer der Archäologie, Band 9. Salzburg: Andreas Verlag, pp. 3217-3240.

―. 1992. The Central African Rain Forest: Historical Speculation and Archaeological Facts. World Archaeology Vol. 24 (1): 1-24.

― 2014. The archaeology of the Central African rainforest: Its current state. In: Renfrew, C. & Bahn, P. (Eds). The Cambridge World Prehistory (1). New York: Cambridge University Press. pp. 183–203.

Livingstone-Smith, A., Cornelissen, E., de Franquen, C., Nikis, N., Mees, F., Tshibamba Mukendi, J., Beeckman, H., Bourland, N. & Hubau, W. 2016. Forests and Rivers: The Archaeology of the North Eastern Congo. Quaternary International.

Mercader, J. 2003. Foragers of the Congo. The early settlement of the Ituri Forest. In: Mercader, J. (ed.). Under the Canopy. New Brunswick: Rutgers University Press. pp. 93-116.